Bolingo ya Nzambe – Henri Papa Mulaja

a-z lyrics Lyrics lyrics_B Music

Na Molongo ya bato
Bazwa ngolu na Nzambe
Na koki kowangana te, naza na kati
Natomboli maboko, na ndimi na motema
Mobimba na ngai awa, ngolu na ngolu

Henri Papa Mulaja – Bolingo Ya Nzambe (Clip Officiel)

Misala n’ekulusu
Ememeli ngai ya bomoi
Na meritaki te, oh
Na makasi ya nzoto
Yesu yaka lisusu
Oza na motem’oyo
Kiti ya bokonzi, ebongi se nayo
Mosantu ya lola, Yesu masiya

Soki osali te, oh?
Eko salema te, eh-eh
Soki osimbi te? (Eko simba te, oh)
Bongo soki olobi te Yaya? (To ko yoka nani?)
Soki opesi te, oh?
To kozwa epayi ya nani?

Yesu, soki osali te, oh?
Eko salema te, eh-eh-eh
Soki osimbi te, oh? (Eko simba te, oh)
Bongo soki olobi te Yaya? (To ko yoka nani?)
Soki opesi te? (To kozwa epayi ya nani?)

Na Molongo ya bato bazwa ngolu na Nzambe
Na koki o wangana te, naza na kati
Natomboli maboko, na ndimi na motema
Mobimba na ngai awa, ngolu na ngolu

Misala na ekulusu
Ememeli ngai ya bomoyi
Na meritaki te, oh
Na makasi ya nzoto
Yesu yaka lisusu, eyi-yeh
Oza na motema oyo (oh)
Kiti o ya bokonzi, ebongi se nayo
Mosantu ya lola, Yesu na ngai

Soki osali te, oh? Eko salema te, eh-eh
Soki osimbi te, oh? (Eko simba te, oh)
Soki olobi te, oh? (To ko yoka nani?)
Soki opesi te, oh? (To kozwa epayi ya nani?)

Yango nazo Bolingo ya nzambe, eh
Nazo bika na Bolingo ya nzambe, eh-eh

Nga nazo bika na Bolingo ya nzambe, eh
Ngai oyo nazo bika na (Bolingo ya nzambe, eh)
Ko pema nazo pema eza? (Bolingo ya Nzambe ee)
Bongo makasi ya nzoto (Bolingo ya Nzambe, eh)
Sekele ya esengo na nga (Bolingo ya Nzambe, eh)
Sekele ya libota na nga (Bolingo ya Nzambe, eh)
Parfum ya loyembo na nga (Bolingo ya Nzambe, eh)

Resumée ya mateya na nga (Bolingo ya Nzambe, eh)
Mobimba na ngai awa eza (Bolingo ya Nzambe, eh)
Ko tambola nazo tambola oyo
Bolingo ya Nzambe, eh
Ngai nazo bika na Bolingo ya Nzambe, eh
Nazo bika na Bolingo ya Nzambe, eh
Pema na ezo pema eza? (Bolingo ya Nzambe ee)

Bongo makasi ya nzot’oyo (Bolingo ya Nzambe, eh)
Nzembo na ngai, eh, tango nionso
Bolingo ya Nzambe, eh
Sekele ya libota na nga (Bolingo ya Nzambe, eh)
Na sili ko kufa, na leki na nini, eh?
Bolingo ya Nzambe, eh
Tika nga na yemba Bolingo ya Nzambe, eh (eh-yih, eh)

Bible eza koloba, “nini oza nayango, ewuti epa ya Nzambe te?
Soki oza ndima e te nionso oza nango
Na oyo y’ozali ewuti epai ya Nzambe
Yemba refrain oyo na biso, simba motema
Ah, Bolingo ya Nzambe

Ngai nazo bika na (Bolingo ya nzambe, eh)
Ngai awa nazo bika na (Bolingo ya nzambe, eh)
Santé ya bana na ngai oyo (Bolingo ya nzambe, eh)
Diplôme te, mayele ya campus te, oh
Bolingo ya nzambe, eh
Ko mona, ko tambola, ko yoka, eh
Bolingo ya nzambe, eh
Ba miracles ko wuta na lolo
Bolingo ya nzambe, eh

Ngai nazo bika na Bolingo ya Nzambe, eh
Ngai nazo bika na Bolingo ya Nzambe, eh
Na lamuki na tango na yembi
Bolingo ya nzambe, eh (boling’oyo)
Midi ebeti ngai oyo na yembi bolingo
Bolingo ya nzambe, eh
Na butu na ko lala se na bolingo
Bolingo ya Nzambe, eh

Osali nga bolamu mingi, eh
Bolingo ya Nzambe, eh
Mabe na sala ba susu ba kufa nango
Bolingo ya Nzambe, eh
O bateli nga na futi yo nini, eh?
Bolingo ya Nzambe, eh

Tika na yemba nzembo ya motema
Na loba oza malamu pona ngai
Bolingo no etondi nga motema Yaya, eh
Na ko seka baninga pona nini?
Yango na ko tiola baninga pona nini? Eh
Nionso na ngai, Yesu na Yesu (ah)

Se yo Yesu
Eza (se yo Yesu)
Moninga na nga ya tango nionso
Se yo Yesu
Ya baye bazanga baninga (se yo Yesu)

Elikya ya baye ba simba moto na Kolela (se yo Yesu)
O kangolaka bato ya mitema mabe (se yo Yezu)
Se yo mosantu ya lola (se yo Yezu)
Zua kembo masanjoli Yaya (se yo Yesu)

Chanson titre: Bolingo ya Nzambe
Album : Merci Seigneur Jesus-Christ
Artiste : Henri Papa Mulaja
Date de sortie : 2020